komela biso mokanga awa to tindela biso likanisi na yo
Kombo na yo
Email na yo
Mboka na yo
Mokanda na yo
MOKANDA
BANZEMBO 1
1 Mapamboli na moto oyo aboyaka kolanda toli ya bato ya mabe, oyo atelemaka te na nzela ya bato ya masumu, mpe avandaka esika moko te na batioli.
2 Kasi asepelaka na Mibeko na Yawe; mpe akanisaka yango na nse ya motema na ye butu mpe moi.
3 Moto yango azali lokola nzete oyo balona pene-pene ya mayi; oyo ebotaka mbuma na tango na yango; mpe makasa na yango ekawukaka te. Makambo nyonso oyo asalaka etambolaka malamu.
4 Kasi ezali bongo te mpo na bato ya mabe; bango, bazali lokola matiti ya kokawuka, oyo mopepe epanzaka-panzaka.
5 Yango wana bato ya mabe bakotelema te na mokolo ya kosambisama, to mpe bato ya masumu kati na lisanga ya bato na sembo.
6 Pamba te Yawe ayebi nzela ya bato na sembo; kasi nzela ya bato ya mabe ekobeba.
MOKANO NA BISO
Mapamboli.com ezali lingomba ya
mayangani te.
Yango ezali lisanga oyo ebongisami mpo na mondimi nioso oyo alingi, azua esika ya kokumisa Nzambe na monoko na biso (Lingala).
MISALA NA BISO
Soki Nzambe alingi mpe akambi biso, Tokoyeba kobakisa boyokani ya kala. Okoki kopesa biso maboko, Ekozala esengo mingi, soki yo okoti kati ya lisanga ya Mapamboli.com.
MOTUNA TO MOKANDA
Okoki kokomela mokambi ya misala ya mapamboli.com.
Jupé Bongolo,
Kende na esika oyo ebongisami mpo na mokanda, Tika ete
Nzambe apambola yo.
MOKANO NA BISO
Na nzela ya internet, mondimi nioso akoki koya Kolendisa bandeko, to baninga na ye, na mateya, maloba, bilili nioso oyo ezali na nzela moko na bibilia to na mpe mangomba ya bakristo.